samedi 2 mars 2013

Matondo Mama - Merci Maman -



Matondo Mama
-ozali bolingo kati ya Motema nanga
Matondo Mama
-ozali Mwinda kati ya Motema nanga
Matondo Mama
-ozali Moyi ya Mikolo nionso kati ya Motema nanga
Matondo Mama
-yo nde Elombe ya makasi na Motema nanga

Matondo Mama
-obatela nga libwa ya sanza kati ya Libumu
Matondo Mama
-obatela nga nguna Mupepe ya makasi
Matondo Mama
-obatela nga nguna Bitumba
Matondo Mama
-obatela nga nguna Masasi

Matondo Mama
-yo nde mwinda ya bomoyi nanga
Matondo Mama
-kitoko nanga eza kitoko nayo
Matondo Mama
-elongi nayo engelaka likolo ya Mapata
Matondo Mama
-na butu okomaka kitoko ndeti nkama ya Minzonto

Matondo Mama
-na tangu ya mawa opesaka nga makasi
Matondo Mama
-na tangu molili ekotaka kati ya Motema yo nde opelisaka mwinda
Matondo Mama
-na tangu mayi ya misu etangaka yo nde opangusaka yango
Matondo Mama
-na tangu ya malili yo nde opelisaka moto

Matondo Mama
-pona bolingo opesaka nga
Matondo Mama
-pona makasi opesaka nga
Matondo Mama
-pona libateli nayo
Matondo Mama
-pona bomoyi opesa nga

Matondo Mama na lingaka yo mingi

Poème en lingala écrit par Mudjacka pour Harmonie S'exprime

1 commentaire:

  1. Esengo mingi pona "poème" na yo.
    Esengo mingi nde ozo telemisa lokumu ya ba mama na biso.

    Matondo mingi Mudjacka

    de DCKM

    RépondreSupprimer